O mambí ma lokótá likonzámí lizalí nkómbó eye etíyamaka pɛnɛ na nkómbó esúsu mpɔ̂ na ebákisa tǒ ebóngola ntína. Ndakisa: mokɛ́, monɛ́nɛ, molaí, mokúsé, kitɔ́kɔ, motáné, moyíndo, b.n.b.
Ndéngé ya makonzámí:
- likonzámí bonkóló: kitɔ́kɔ, elɛngɛ́, elɛngi, péto, b.n.b.
- likonzámí lilimbólí nyɛ̂ tɛ̂: míngi, yíké, ebɛ́lɛ́, b.n.b.
- likonzámí lya motángo: mɔ̌kɔ́, míbalé, b.n.b.
- likonzámí lilakisi: (óyo, -ye)
- likonzámí likoki
Óyo ezalí ndámbo. Okoki kosálisa mpé kosungǎ.
