factograf
LN

AVC

AVC

AVC, eyebani mpe bo accident vasculaire cérébral, attaque cérébrale to mpe lokito na moto, esalemaka ntango circulation ya makila eza mabe na bongo mpe komema liwa ya ba cellule. Eza na lolenge mibale ya AVC: AVC ischémique, kolandana na bozangi ya circulation ya makila, mpe AVC hémorragique, kolandana na botangisi makila. Yango nionso mibale esalaka ete eteni ya bongo esala malamu te. Bilembo ya AVC ekoki kozala kozanga ndenge ya koningana to kosentir na ngambu moko ya nzoto, kososola makambo to koloba, koyoka neti mokili eza kobalu mbangu, to liso moko etiki komona mpe bilembo misusu. Bilembo bibandaka mingi mingi komonana noki sima na AVC kosalama. Soki bilembo biumeli na eleko na se ya ngonga moko to mibale yango eyebani bo accident ischémique ya eleko mokuse. AVC hémorragique ekoki mpe kolandana na moto mpasi ya makasi. Bilembo ya AVC bikoki koumela libela. Mikakatano miye mikoki koya sima na eleko molayi mikoki kozala pneumonie to kobungisa contrôle ya ba vessie.

Facteur risque ya yambo mpo na AVC eza hypotension artérielle. Ba facteurs risques misusu eza kobenda likaya, obesité, taux monene ya cholestérol kati ya makila, maladi ya sukali, accident ischémique ya eleko mokuse, mpe fibrillation auriculaire. AVC ischémique mingi mpeza elandanaka na kozibama ya vaisseau ya makila. AVC hémorragique elandanaka na kotangisa makila nakati ya bongo to na nzinga nzinga ya bongo. Kotangisa makila ekoki kosalema kolandana na kovimba ya bongo. Diagnostic mingi mpeza esalemaka na bozwi bilili na ba labo neti na scanner ya tomographie to scanner IRM elengo na ba examen ya nzoto. Ba teste misusu neti électrocardiogramme (ECG) na ba teste ya makila esalemaka mpo na koyeba ba facteurs risques mpe kolongola ntina misusu oyo ekokaki kozala. Sukali moke na makila ekoki mpe komema bilembo lokola oyo ya AVC.

Mpo na komibatela esengeli kokitisa bafacteur risque na mpe aspirine, statine, lipaso mpo na kofungola ba artéres oyo ekeyi na bongo mpo an baye baza na kokondisama oyo ya mikakatano, mpe warfarine mpo na baye baza na fibrillation auculaire. AVC mingi mingi esengaka kokende na soins d'urgence. AVC ischémique, soki ekundolami nakati ya ngonga misato kino minei na ndambu, ekoki kobikisama na nkisi oyo ekoki kopanza mbuma ya makila. Esengeli kosalela Aspirine. Ba AVC hémorragique mususu esungamaka na lipaso. Traitement mpo na komeka kozongisa fonctionnement eye etikaki kosala ebiangamaka rééducation cérébrale mpe mingi mpeza esalemaka na service cardiaque; kasi, yango eza bisika mingi te na mokili.

Na mobu ya 2010 pene ya 17 million ya batu bazwamaki AVC mpe 33 million bazalaki baye basila kozwa yango liboso mpe bakobaki kozala na bomoyi. Kayi ya mobu ya 1990 na ya 2010 motango ya ba AVC oyo esalemaki mobu na mobu ekitaki kino pene na 10% na ba pays développés kasi emataki na 10% na ba pays en voie de développement. Na mobu ya 2013, AVC ezalaki ya mibale sima ya maladi ya ba artéres coronaires na oyo mingi mingi ememaka kufa, ememaki liwa ya batu 6.4 million (12% ya nionso). Pene na 3.3 million ya batu bakufaki, elandanaki na AVC hémorragique. Pene na moitié ya batu oyo bazwa AVC babikaka na se ya eteni ya mobu. Na nionso, 2/3 ya AVC esalemaka na baye baza na mibu koleka 65.

Read next

In 132 languages

lnAfrikaansAlemannischaragonésالعربيةمصرىঅসমীয়াasturianuazərbaycancaتۆرکجهбашҡортсаžemaitėškaбеларуская (тарашкевіца)беларускаябългарскиပအိုဝ်ႏဘာႏသာႏবাংলাབོད་ཡིགbrezhonegbosanskicatalàCebuanoᏣᎳᎩکوردیčeštinakaszëbscziчӑвашлаCymraegdanskdagbanliDeutschދިވެހިބަސްΕλληνικάEnglishEsperantoespañoleestieuskaraفارسیsuomiføroysktfrançaisGaeilgegalegoAvañe'ẽGhanaian PidginHausaעבריתहिन्दीFiji HindihrvatskimagyarհայերենBahasa IndonesiaIdoíslenskaitaliano日本語PatoisJawaქართულიқазақшаYerwa Kanuri한국어kurdîкомикыргызчаLatinaLimburgslombardລາວlietuviųlatviešuMalagasyMinangkabauмакедонскиമലയാളംBahasa Melayuမြန်မာဘာသာPlattdüütschनेपालीNederlandsnorsk nynorsknorskoccitanଓଡ଼ିଆਪੰਜਾਬੀKapampanganpolskiPiemontèisپنجابیportuguêsromânăрусскийсаха тылаsicilianuسنڌيsrpskohrvatski / српскохрватскиတႆးසිංහලSimple Englishslovenčinaslovenščinaсрпски / srpskisvenskaKiswahiliSakizayaதமிழ்తెలుగుтоҷикӣไทยTagalogSetswanaTürkçeтатарча / tatarçaтыва дылئۇيغۇرچە / Uyghurcheукраїнськаاردوoʻzbekcha / ўзбекчаvènetoTiếng ViệtwalonWinaray吴语მარგალურიייִדישYorùbáVahcuengh閩南語 / Bân-lâm-gí粵語中文

Text from Wikipedia, CC BY-SA 4.0 · Source article